23 Mpe ntango Yehova atindaki bino longwa na Kadeshe-barnea,+ alobaki ete: ‘Bómata mpe bózwa mokili oyo nakopesa mpenza bino!’ na ntango yango, botombokaki, boboyaki etinda ya Yehova Nzambe na bino,+ mpe bondimelaki+ ye te mpe boyokaki mongongo na ye te.+