Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 20:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Bongo Moize alobaki na bato ete: “Bóbanga te, mpamba te ezali mpo na komeka bino nde Nzambe ya solo ayei,+ mpe mpo kobanga ye ezala ntango nyonso liboso ya bilongi na bino mpo bósala lisumu te.”+

  • Yosua 24:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “Mpe sikoyo, bóbanga Yehova+ mpe bósalela ye na bosembo mpe na bosolo,+ mpe bólongola banzambe oyo bankɔkɔ na bino basalelaki na ngámbo mosusu ya Ebale mpe na Ezipito,+ mpe bósalela Yehova.

  • Yobo 28:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe alobaki na moto ete:

      ‘Talá! Kobanga Yehova—nde bwanya,+

      Mpe kopɛngwa na mabe nde mayele.’”+

  • Nzembo 111:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya.+

      ש [Sin]

      Baoyo nyonso bazali kosalela yango bazalaka mpenza na mayele ya kososola.+

      ת [Taw]

      Lisanzoli na ye ezali mpo na seko.+

  • Nzembo 128:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 128 Esengo na moto nyonso oyo azali kobanga Yehova,+

      Oyo azali kotambola na banzela na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto