Kobima 32:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Mpe Moize abandaki kokitisa motema ya Yehova Nzambe na ye+ mpe alobaki ete: “Ee Yehova, mpo na nini nkanda+ na yo engalela bato na yo oyo obimisaki na mokili ya Ezipito na nguya monene mpe na nguya ya lobɔkɔ na yo? Kobima 32:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 Mpe Yehova abandaki koyoka mawa mpo na mabe oyo alobaki ete akosalela bato na ye.+ Kolimbola Mibeko 10:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Mpe ngai—natikalaki na ngomba lokola na mikolo ya liboso, mikolo ntuku minei (40) butu moi,+ mpe Yehova ayokelaki ngai lisusu na libaku yango.+ Yehova alingaki te koboma yo.+ Nzembo 106:23 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 23 Mpe etikalaki moke aloba ete akosilisa bango nyɛɛ,+Soki Moize te, moto oyo ye aponá,Oyo atɛlɛmaki na libulu liboso na ye,+Mpo na kozongisa nsima nkanda na ye makasi mpo abebisa bango te.+
11 Mpe Moize abandaki kokitisa motema ya Yehova Nzambe na ye+ mpe alobaki ete: “Ee Yehova, mpo na nini nkanda+ na yo engalela bato na yo oyo obimisaki na mokili ya Ezipito na nguya monene mpe na nguya ya lobɔkɔ na yo?
10 Mpe ngai—natikalaki na ngomba lokola na mikolo ya liboso, mikolo ntuku minei (40) butu moi,+ mpe Yehova ayokelaki ngai lisusu na libaku yango.+ Yehova alingaki te koboma yo.+
23 Mpe etikalaki moke aloba ete akosilisa bango nyɛɛ,+Soki Moize te, moto oyo ye aponá,Oyo atɛlɛmaki na libulu liboso na ye,+Mpo na kozongisa nsima nkanda na ye makasi mpo abebisa bango te.+