Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 18:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Ntango mosakoli azali koloba na nkombo ya Yehova mpe liloba yango esalemi te to ekokisami te, yango ezali liloba oyo Yehova alobaki te. Mosakoli alobaki yango na lofundo.+ Osengeli kobanga ye te.’+

  • Yirimia 6:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Mpo banda na oyo aleki moke na kati na bango tii na oyo aleki monene na kati na bango, bango nyonso bazali kozwa litomba na ndenge ya mabe;+ mpe banda na mosakoli tii na nganga-nzambe, bango nyonso bazali kobuka lokuta.+

  • Ezekiele 13:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Mwana ya moto, sakolá mpo na basakoli ya Yisraele oyo bazali kosakola,+ mpe osengeli koloba boye na baoyo bazali kosakola makambo oyo euti na motema na bango moko:+ ‘Bóyoka liloba ya Yehova.+

  • Zekaria 13:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 “Mpe ekosalema boye na mokolo yango: basakoli bakoyoka nsɔni,+ moko na moko mpo na emonaneli na ye ntango azali kosakola; mpe bakolata te elamba ya mosala oyo esalemi na nsuki ya nyama+ mpo na kokosa.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto