Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 5:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Ngai, na motema boboto oyo otondi na yango+

      Nakokɔta na ndako na yo,+

      Nakogumbama wana nazali kotala na ngámbo ya tempelo na yo mosantu mpo na kobanga yo.+

  • Nzembo 19:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Kobanga+ Yehova ezali pɛto, eumelaka seko.

      Bikateli ya lisambisi+ ya Yehova ezali solo;+ yango nyonso ezali boyengebene.+

  • Nzembo 111:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya.+

      ש [Sin]

      Baoyo nyonso bazali kosalela yango bazalaka mpenza na mayele ya kososola.+

      ת [Taw]

      Lisanzoli na ye ezali mpo na seko.+

  • Masese 8:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Kobanga Yehova elakisi koyina mabe.+ Komikumisa ná lolendo,+ nzela mabe ná monɔkɔ oyo elobaka makambo ya kilikili,+ nayiná yango.

  • Yisaya 8:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Yehova ya mampinga—ye nde Moto bosengeli kotalela ete azali mosantu,+ mpe ye nde bosengeli kobanga,+ mpe ye nde Moto asengeli kolɛngisa bino.”+

  • Baebre 12:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Yango wana, lokola tosengeli kozwa bokonzi moko oyo ekoki koningana te,+ tókoba kozwa boboto monene, oyo na nzela na yango tokoki kosalela Nzambe mosala mosantu na ndenge endimami ná kobanga Nzambe ná nsɔmɔ.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto