Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 34:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Bongo ekosɛnga ozwa bana basi na bango mosusu mpo na bana na yo ya mibali,+ mpe ya solo bana na bango ya basi bakosala pite na banzambe na bango mpe bakosala ete bana na yo ya mibali básala pite na banzambe na bango.+

  • Kolimbola Mibeko 7:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe osengeli kosala kondimana ata moko te ya libala ná bango. Osengeli te kopesa mwana na yo ya mwasi na mwana na ye ya mobali, mpe osengeli te kozwa mwana na ye ya mwasi mpo na mwana na yo ya mobali.+

  • Basambisi 3:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe bakómaki kozwa bana basi ya bikólo wana mpo bázala basi na bango,+ mpe bapesaki bana na bango ya basi epai ya bana mibali na bango,+ mpe babandaki kosalela banzambe na bango.+

  • 1 Bakonzi 11:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe esalemaki boye: ntango Salomo akómaki mobange,+ basi na ye babendaki+ motema na ye mpo na kolanda banzambe mosusu;+ mpe motema na ye ezalaki mobimba te+ epai ya Yehova Nzambe na ye lokola motema ya tata na ye Davidi.

  • Ezera 9:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpamba te bandimi kozwa bana na bango mosusu ya basi mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango ya mibali;+ mpe bango, momboto mosantu,+ basangani+ na bato ya mikili mosusu, mpe lobɔkɔ ya bankumu ná bayangeli-basungi ezali na esika ya liboso+ na likambo oyo ya kozanga bosembo.”

  • Nehemia 13:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Lisusu, na mikolo yango, namonaki Bayuda oyo batyaki basi Baashedode,+ Baamone ná Bamoabe+ na ndako.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto