Kobima 14:20 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 20 Bongo yango eyaki kotɛlɛma kati ya kaa ya Baezipito mpe kaa ya Yisraele.+ Na ngámbo mosusu, yango ezalaki lipata ná molili. Na ngámbo mosusu, yango ezalaki kaka kongɛngisa butu.+ Mpe etuluku oyo ebɛlɛmaki te na etuluku oyo mosusu, butu mobimba. Nzembo 78:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 Mpe akobaki kokamba bango na lipata na moi+Mpe na butu mobimba na pole ya mɔtɔ.+ Nzembo 105:39 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 39 Atandaki lipata lokola elamba ya kozipa,+Mpe mɔtɔ mpo epesaka pole na butu.+
20 Bongo yango eyaki kotɛlɛma kati ya kaa ya Baezipito mpe kaa ya Yisraele.+ Na ngámbo mosusu, yango ezalaki lipata ná molili. Na ngámbo mosusu, yango ezalaki kaka kongɛngisa butu.+ Mpe etuluku oyo ebɛlɛmaki te na etuluku oyo mosusu, butu mobimba.