Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 15:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Makasi na ngai mpe nguya na ngai ezali Yah,+ mpo azali lobiko na ngai.+

      Oyo nde Nzambe na ngai, mpe nakokumisa ye;+ Nzambe ya tata na ngai,+ mpe nakotombola ye likoló mpenza.+

  • Yosua 24:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Nde soki emonani mabe na miso na bino kosalela Yehova, bópona bino moko lelo nani bino bokosalela,+ soki banzambe oyo bankɔkɔ na bino oyo bazalaki na ngámbo mosusu ya Ebale basalelaki+ to banzambe ya Baamore oyo bozali kofanda na mokili na bango.+ Kasi mpo na ngai mpe bato ya ndako na ngai, tokosalela Yehova.”+

  • Mika 4:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpo bato ya bikólo nyonso, ɛɛ bango, bakotambola moto na moto na nkombo ya nzambe na ye;+ kasi biso, ɛɛ biso, tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso+ mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ seko na seko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto