Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 3:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe nazali kokita mpo na kobikisa bango na lobɔkɔ ya Baezipito+ mpe kolongola bango na mokili oyo bámata tii na mokili moko malamu mpe monene, na mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ na mboka ya Bakanana ná Bahiti ná Baamore ná Baperizi ná Bahivi mpe Bayebusi.+

  • Mitángo 13:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe bapesaki ye nsango mpe balobaki ete: “Tokɔtaki na mokili oyo otindaki biso, mpe yango etondi mpenza na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ mpe talá mbuma na yango.+

  • Kolimbola Mibeko 27:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe osengeli kokoma maloba nyonso ya mobeko+ oyo likoló na yango, nsima ya kokatisa,+ mpo okɔta na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi, kaka ndenge Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na yo alobi na yo.+

  • Ezekiele 20:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na mokolo yango, natombolaki lobɔkɔ na ngai+ mpe nalapelaki bango ndai ete nakobimisa bango na mokili ya Ezipito mpo na komema bango na mokili oyo nanɔngelaki bango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ Elekaki mikili nyonso na kitoko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto