Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 6:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe ekosalema mpenza boye: ntango bakoyula liseke ya mpate ya mobali, mpe ntango bokoyoka lokito ya liseke yango, bato nyonso ya etumba basengeli kobɛta ntangwa makasi ya etumba;+ mpe efelo ya engumba ekokwea mobimba na nse,+ mpe bato basengeli komata alima, moto na moto liboso na ye.”

  • Yosua 6:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Nzokande Yosua apesaki bato+ mitindo ete: “Bóganga te mpe mingongo na bino eyokana te, liloba moko te ebima na minɔkɔ na bino tii mokolo nakoloba na bino ete: ‘Bóganga!’ Na ntango wana nde bokoganga.”+

  • 2 Ntango 13:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe bato ya Yuda babɛtaki ntangwa ya etumba.+ Mpe esalemaki boye: ntango bato ya Yuda babɛtaki ntangwa ya etumba, Nzambe ya solo ye moko alongaki+ Yeroboame mpe Yisraele mobimba liboso ya Abiya+ mpe Yuda.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto