Kolimbola Mibeko 17:19 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 19 “Mpe yango esengeli kokoba kozala elongo na ye, mpe asengeli kotánga yango mikolo nyonso ya bomoi na ye,+ mpo ayekola kobanga Yehova Nzambe na ye na kobateláká maloba nyonso ya mobeko oyo mpe malako oyo, na kosaleláká yango;+ Nzembo 1:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Kasi asepelaka na mobeko ya Yehova,+Mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi.+ 1 Timote 4:15 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 15 Okanisaka malamu mpenza makambo yango;+ omipesa mobimba na yango, mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso.+ Yakobo 1:25 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 25 Kasi moto oyo azali kotalatala na mobeko ya kokoka+ mpe ya bonsomi mpe oyo azali kotingama na yango, moto wana, lokola akómi moyoki oyo abosanaka te, kasi moto oyo azali kosala mosala,+ akozala na esengo+ ndenge azali kosalela yango.
19 “Mpe yango esengeli kokoba kozala elongo na ye, mpe asengeli kotánga yango mikolo nyonso ya bomoi na ye,+ mpo ayekola kobanga Yehova Nzambe na ye na kobateláká maloba nyonso ya mobeko oyo mpe malako oyo, na kosaleláká yango;+
15 Okanisaka malamu mpenza makambo yango;+ omipesa mobimba na yango, mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso.+
25 Kasi moto oyo azali kotalatala na mobeko ya kokoka+ mpe ya bonsomi mpe oyo azali kotingama na yango, moto wana, lokola akómi moyoki oyo abosanaka te, kasi moto oyo azali kosala mosala,+ akozala na esengo+ ndenge azali kosalela yango.