8 Mpe Yehova nde azali kotambola liboso na yo. Ye moko akokoba kozala elongo na yo.+ Akosundola yo te mpe akotika yo soki moke te. Kobanga te mpe kozala na nsɔmɔ te.”+
8Na nsima, Yehova alobaki na Yosua boye: “Kobanga te mpe kozala na nsɔmɔ te.+ Kamatá elongo na yo bato nyonso ya etumba mpe tɛlɛmá, matá na Ai. Talá, napesi na lobɔkɔ na yo mokonzi ya Ai mpe bato na ye mpe engumba na ye mpe mokili na ye.+