1 Samwele 14:42 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 42 Sikoyo, Saulo alobaki boye: “Bóbwaka mbɛsɛ+ mpo na koyeba soki ezali ngai to mwana na ngai Yonatane.” Mpe Yonatane azwamaki. Masese 13:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 Mpasi elandaka basumuki,+ kasi malamu epesaka bayengebene mbano.+ Masese 16:33 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 33 Babwakaka mbɛsɛ+ na kati ya elamba oyo ezipaka bibɛlɔ, kasi ekateli nyonso oyo ebimi na yango eutaka na Yehova.+ Yirimia 2:26 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 26 “Lokola nsɔni oyo moyibi ayokaka ntango bakangi ye, nsɔni ya bongo nde bato ya ndako ya Yisraele bayoki,+ bango, bakonzi na bango, bankumu na bango ná banganga-nzambe na bango mpe basakoli na bango.+ Yona 1:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Mpe babandaki koloba bango na bango ete: “Bóya, tóbwaka mbɛsɛ,+ mpo tóyeba mpo na nani tozwi likama oyo.”+ Mpe bazalaki kobwaka mbɛsɛ, mpe nsukansuka mbɛsɛ ekwelaki Yona.+ Misala 5:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Kasi Petro alobaki ete: “Ananiasi, mpo na nini Satana+ apesi yo mpiko mpo na kokosa+ elimo santu+ mpe kobomba na nkuku ndambo ya mbongo ya elanga?
42 Sikoyo, Saulo alobaki boye: “Bóbwaka mbɛsɛ+ mpo na koyeba soki ezali ngai to mwana na ngai Yonatane.” Mpe Yonatane azwamaki.
33 Babwakaka mbɛsɛ+ na kati ya elamba oyo ezipaka bibɛlɔ, kasi ekateli nyonso oyo ebimi na yango eutaka na Yehova.+
26 “Lokola nsɔni oyo moyibi ayokaka ntango bakangi ye, nsɔni ya bongo nde bato ya ndako ya Yisraele bayoki,+ bango, bakonzi na bango, bankumu na bango ná banganga-nzambe na bango mpe basakoli na bango.+
7 Mpe babandaki koloba bango na bango ete: “Bóya, tóbwaka mbɛsɛ,+ mpo tóyeba mpo na nani tozwi likama oyo.”+ Mpe bazalaki kobwaka mbɛsɛ, mpe nsukansuka mbɛsɛ ekwelaki Yona.+
3 Kasi Petro alobaki ete: “Ananiasi, mpo na nini Satana+ apesi yo mpiko mpo na kokosa+ elimo santu+ mpe kobomba na nkuku ndambo ya mbongo ya elanga?