Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 38:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Nzokande esalemaki boye: soki sanza misato na nsima, bayaki koyebisa Yuda ete: “Tamara mwasi ya mwana na yo asali bondumba,+ mpe talá azwi zemi+ na bondumba na ye.” Na yango, Yuda alobaki ete: “Bóbimisa ye libándá mpe atumbama.”+

  • Balevi 20:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “‘Mpe soki mobali moko azwi mwasi ná mama ya mwasi yango, ezali etamboli ya nsɔni.+ Basengeli kozikisa ye ná bango na mɔtɔ,+ mpo etamboli ya nsɔni+ ezala te na kati na bino.

  • Balevi 21:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “‘Sikoyo soki mwana mwasi ya nganga-nzambe moko amikómisi eloko mpamba na kosaláká bondumba, azali kokómisa nde tata na ye eloko mpamba. Akozikisama na mɔtɔ.+

  • Yosua 7:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe ekosalema mpenza boye: moto oyo akozwama na eloko oyo esengeli kobebisama akotumbama na mɔtɔ,+ ye ná nyonso oyo azali na yango, mpamba te abuki kondimana+ ya Yehova mpe asali likambo moko ya bozoba mpe ya nsɔni na Yisraele.”’”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto