21 Mpe liboso ya Eleazare nde akotɛlɛma, mpe asengeli kotunela+ ye ndenge Urime+ ekokata likambo liboso ya Yehova. Na etinda na ye bakobima mpe na etinda na ye bakokɔta, ye ná bana nyonso ya Yisraele elongo na ye mpe liyangani mobimba.”
28 Mpe pesá Yosua mokumba+ mpe yikisá ye mpiko mpe lendisá ye, mpamba te ye nde akokatisa+ liboso ya bato oyo mpe ye nde akosala ete bázwa lokola libula mokili oyo okomona.’+