Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 14:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Yehova ye moko akobundela bino,+ mpe bino bokozala nyɛɛ.”

  • Kolimbola Mibeko 1:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Yehova Nzambe na bino ye nde azali kotambola liboso na bino. Akobundela bino+ kaka ndenge asalelaki bino na miso na bino na Ezipito,+

  • Kolimbola Mibeko 3:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Bosengeli kobanga bango te, mpo Yehova Nzambe na bino Ye nde azali kobundela bino.’+

  • Yosua 23:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe bino, bomoni nyonso oyo Yehova Nzambe na bino asali bikólo oyo nyonso mpo na bino,+ mpamba te Yehova Nzambe na bino nde moto azalaki kobundela bino.+

  • Nzembo 33:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Molimo na biso mpenza ezali kozela Yehova.+

      Ye azali mosungi na biso mpe nguba na biso.+

  • Yisaya 42:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Yehova ye moko akobima lokola mobali ya nguya.+ Akolamwisa molende na ye lokola mobundi.+ Akoganga, ɛɛ, akobɛta ntangwa ya etumba;+ liboso ya banguna na ye akolakisa ete azali na nguya koleka.+

  • Zekaria 14:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Mpe Yehova akobima mpenza mpe akobunda etumba na bikólo yango+ lokola na mokolo ya etumba na ye, na mokolo ya kobunda.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto