8 “Soki otongi ndako ya sika, osengeli mpe kosala efelo ya libateli mpo na nsamba*+ na yo, mpo omemisa ndako na yo ngambo ya makila te, mpo moto akoki kokwea longwa na yango.
2 Mpe esalemaki boye: na mpokwa, Davidi alongwaki na mbeto na ye mpe abandaki kotambolatambola na nsamba+ ya ndako ya mokonzi; mpe longwa na nsamba yango, amonaki+ mwasi moko azali kosukola, mpe mwasi yango azalaki kitoko mingi mpenza.+
9 Na mokolo oyo elandaki, ntango bazalaki kokoba mobembo na bango mpe bazalaki kopusana pene na engumba, Petro amataki likoló ya ndako+ pene na ngonga ya motoba mpo na kobondela.+