Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 15:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Na mokolo yango, Yehova asalaki kondimana ná Abrama,+ na maloba oyo: “Nakopesa momboto na yo mokili oyo,+ banda na ebale ya Ezipito* tii na ebale monene, ebale Efrate:+

  • Kobima 23:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 “Mpe nakotya bandelo na yo banda na Mbu Motane tii na mbu ya Bafilistia mpe banda na esobe tii na Ebale;+ mpamba te nakopesa bato oyo bafandi na mokili yango na lobɔkɔ na bino, mpe okobengana mpenza bango liboso na yo.+

  • Mitángo 34:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “‘Mpe ngámbo na bino ya sudi esengeli kozala banda na esobe ya Zine pembenipembeni ya Edome,+ mpe ndelo na bino ya sudi esengeli kozala banda na nsuka ya Mbu ya Mungwa,+ na ɛsti.

  • Kolimbola Mibeko 1:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bóbaluka mpe bólanda nzela na bino mpe bókɔta na etúká ya ngombangomba ya Baamore+ mpe epai ya baoyo nyonso bazali penepene na bango na Araba,+ etúká ya ngombangomba+ mpe na Shefela ná Negebe+ mpe na bokula ya mbu,+ na mokili ya Bakanana,+ mpe na Libá,+ tii na ebale monene, ebale Efrate.+

  • Yosua 15:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe elekaki na Azemone,+ ebimi na lobwaku ya mokɛli ya Ezipito;+ mpe nsuka ya ndelo yango ezalaki na mbu. Wana nde ndelo na bango ya sudi.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto