Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 18:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpe Yehova alobaki lisusu na Arona ete: “Na mokili na bango okozala na libula te, mpe likabo moko te ekokóma ya yo na kati na bango.+ Ngai nazali likabo na yo mpe libula na yo na kati ya bana ya Yisraele.+

  • Kolimbola Mibeko 10:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Yango wana, Levi azali na likabo te mpe na libula+ te esika moko na bandeko na ye. Yehova azali libula na ye, kaka ndenge Yehova Nzambe na yo alobaki na ye.+

  • Kolimbola Mibeko 12:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe bosengeli kosepela liboso ya Yehova Nzambe+ na bino, bino ná bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi ná baombo na bino ya mibali ná baombo na bino ya basi mpe Molevi oyo azali na kati ya baporte na bino, mpo azali na likabo te to na libula te elongo na bino.+

  • Yosua 14:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpo Moize apesaki libula na mabota mosusu mibale mpe na ndambo mosusu ya libota na ngámbo mosusu ya Yordani;+ kasi apesaki Balevi libula te na kati na bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto