Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 48:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Kasi tata na ye azalaki kaka koboya mpe alobaki ete: “Nayebi, mwana na ngai, nayebi. Ye mpe akokóma ekólo mpe akokóma monene.+ Kasi nde, leki na ye akokóma monene koleka ye,+ mpe bana na ye bakokóma ebele mpe bakokokana na bikólo.”+

  • Mitángo 26:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Wana nde mabota ya Manase, mpe bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki nkóto ntuku mitano na mibale na nkama nsambo (52 700).+

  • Mitángo 26:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Wana nde mabota ya bana mibali ya Efraime,+ bato na bango oyo bakomisamaki nkombo: nkóto ntuku misato na mibale na nkama mitano (32 500). Wana nde bana mibali ya Yozefe na kolanda mabota na bango.+

  • Kolimbola Mibeko 33:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Nkembo na ye ezali lokola mwana ya liboso ya ngɔmbɛ-mobali,+

      Mpe maseke na ye ezali maseke ya ngɔmbɛ-mobali ya zamba.+

      Na maseke yango, akotindika bato ya bikólo+

      Bango nyonso tii na nsuka ya mabele,

      Mpe bazali bato nkóto zomi zomi ya Efraime,+

      Mpe bazali bato nkóto nkóto ya Manase.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto