Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 20:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “Ntango okobima mpo na kokende na etumba kobunda na banguna na yo mpe okomona mpenza bampunda ná makalo ya bitumba,+ bato ebele koleka yo, osengeli kobanga bango te; mpo Yehova Nzambe na yo azali elongo na yo,+ ye oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito.+

  • Kolimbola Mibeko 31:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bózala na mpiko mpe na makasi.+ Bóbanga te mpe bózala na nsɔmɔ te liboso na bango,+ mpamba te Yehova Nzambe na yo nde azali kotambola elongo na yo. Akosundola yo te mpe akotika yo soki moke te.”+

  • Yosua 13:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 bato nyonso oyo bafandi na etúká ya ngombangomba, banda na Libá+ tii na Misirefote-maime,+ Basidone+ nyonso; ngai nde nakobɔtɔla bango mokili na bango liboso ya bana ya Yisraele.+ Nde yo, kabolelá yango bana ya Yisraele lokola libula, ndenge napesaki yo mitindo.+

  • Nzembo 27:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Yehova azali pole+ na ngai mpe lobiko na ngai.+

      Nakobanga nani?+

      Yehova azali esika makasi ya libateli ya bomoi na ngai.+

      Nakozala na nsɔmɔ ya nani?+

  • Baroma 8:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Bongo tokoloba nini na makambo yango? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akosala biso mabe?+

  • Baebre 13:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpo tózala na mpiko mpenza+ mpe tóloba: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto