21 Mpe liboso ya Eleazare nde akotɛlɛma, mpe asengeli kotunela+ ye ndenge Urime+ ekokata likambo liboso ya Yehova. Na etinda na ye bakobima mpe na etinda na ye bakokɔta, ye ná bana nyonso ya Yisraele elongo na ye mpe liyangani mobimba.”
18 Bongo batɛlɛmaki mpe bamataki na Betele mpe batunaki Nzambe.+ Na nsima, bana ya Yisraele balobaki boye: “Nani kati na biso akomata liboso na etumba mpo na kobunda na bana ya Benyamina?”+ Na yango, Yehova alobaki ete: “Yuda liboso.”+