-
Yosua 19:47Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
47 Mpe teritware ya bana ya Dani ezalaki moke mingi+ mpo na bango. Bongo bana ya Dani bamataki mpo na kobunda na Lesheme+ mpe bazwaki yango mpe babɛtaki yango na mopanga. Na nsima, bakómisaki yango mboka na bango mpe bafandaki kuna, mpe babandaki kobenga Lesheme yango Dani, na nkombo ya nkɔkɔ na bango Dani.+
-
-
Basambisi 18:7Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
7 Na yango, mibali wana mitano bakendaki mpe bakómaki na Laishe+ mpe bamonaki ndenge bato oyo bazalaki kuna bazalaki komityela motema, ndenge Basidone bazalaka, na kimya mpe bazalaki kobanga eloko te,+ mpe ezalaki na mobɔtɔli-mboka moko te, oyo anyokolaka, oyo azalaki komonisa bango mpasi na mokili wana, mpo bazalaki mosika na Basidone+ mpe bazalaki kokɔta na makambo ya bato te.
-