3 Bongo na nsuka ya mbula zomi oyo Abrama afandaki na mokili ya Kanana, Sarai, mwasi ya Abrama, akamataki Agare, mosaleli na ye Moezipito, mpe apesaki ye na Abrama, mobali na ye, mpo azala mwasi na ye.+
8 Soki miso ya nkolo na ye esepeli na ye te mpe aponi ye te ete azala makango na ye+ kasi atiki ye asikolama, akozala na lotomo te ya kotɛka ye epai ya bato ya ekólo mosusu na ndenge asaleli ye na bokosi.
13 Na ntango yango, Davidi azwaki bamakango+ mpe basi+ mingi lisusu na Yerusaleme, nsima ya kolongwa na Hebrone; bongo Davidi abotaki lisusu bana mingi ya mibali mpe ya basi.
21 Mpe Rehoboame alingaki Maaka mwana ya mwana ya Abisalome mingi koleka basi na ye mosusu nyonso+ mpe bamakango na ye; mpo azwaki basi zomi na mwambe, mpe bamakango ntuku motoba (60), bongo abotaki bana mibali ntuku mibale na mwambe (28) mpe bana basi ntuku motoba.