Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 13:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe mosakoli+ yango to molɔti ndɔtɔ yango oyo alɔti ndɔtɔ asengeli kobomama,+ mpamba te alobeli likambo ya kotombokela Yehova Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na mokili ya Ezipito mpe asikoli yo na ndako ya boombo, mpo na kopɛngwisa yo na nzela oyo Yehova Nzambe na yo apesi yo mitindo otambola+ na yango; mpe osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo.+

  • Kolimbola Mibeko 17:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Lobɔkɔ ya batatoli yango ekozala lobɔkɔ ya liboso oyo ekokitela ye mpo na koboma ye, mpe na nsima lobɔkɔ ya bato nyonso;+ mpe osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo.+

  • Kolimbola Mibeko 22:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 “Soki bakuti mobali azali kolala na mwasi oyo azali na nkolo na ye,+ bango mibale basengeli kokufa elongo, mobali oyo azali kolala na mwasi ná mwasi yango.+ Boye osengeli kolongola oyo ezali mabe na Yisraele.+

  • 1 Bakorinti 5:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Ntina oyo bozali komikumisa+ ezali malamu te. Boyebi te ete mwa levire moke evimbisaka+ pɔtɔpɔtɔ mobimba ya farini?+

  • 1 Bakorinti 5:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 wana Nzambe azali kosambisa baoyo ya libándá?+ “Bólongola moto mabe na kati na bino.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto