15 “Mpe ekosalema mpenza boye: soki okoyoka te mongongo ya Yehova Nzambe na yo na kokebáká ete osalela mitindo na ye nyonso mpe mibeko na ye oyo nazali kopesa yo lelo, bilakeli mabe oyo nyonso esengeli kokitela yo mpe kozwa yo:+
10 “‘“Mpo natɛmɛli engumba oyo mpo na mpasi kasi mpo na bolamu te,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Ekopesama na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone,+ mpe akozikisa yango mpenza na mɔtɔ.”+