Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 29
  • Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Ebandeli 29:1

Mitindami

  • +Bas 6:3; 1Ba 4:30; Yb 1:3

Ebandeli 29:2

Mitindami

  • +Eb 30:40; Loy 4:1
  • +Eb 24:11; Kob 2:15; Yn 4:6

Ebandeli 29:4

Mitindami

  • +Eb 27:43; Mis 7:2

Ebandeli 29:5

Mitindami

  • +Eb 24:29
  • +Eb 24:24; 31:53

Ebandeli 29:6

Mitindami

  • +Eb 43:27; 1Sa 17:22
  • +Eb 31:4; 46:19; Rt 4:11
  • +Kob 2:16

Ebandeli 29:7

Mitindami

  • +Nz 23:2; Loy 1:7

Ebandeli 29:9

Mitindami

  • +Eb 30:1; 35:19
  • +Kob 2:16

Ebandeli 29:10

Mitindami

  • +Kob 2:17

Ebandeli 29:11

Mitindami

  • +Eb 33:4; 45:15; Lk 15:20; Ro 16:16
  • +Eb 43:30; 45:2

Ebandeli 29:12

Mitindami

  • +Eb 13:8; 14:14
  • +Eb 24:28

Ebandeli 29:13

Mitindami

  • +Eb 24:29
  • +Mis 20:37

Ebandeli 29:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mokuwa na ngai mpe mosuni na ngai.”

Mitindami

  • +Bas 9:2; 2Sa 5:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2003, lok. 29

Ebandeli 29:15

Mitindami

  • +Eb 27:43; 28:5
  • +Mib 25:4; 1Ti 5:18
  • +Eb 30:28; 31:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2003, lok. 29

Ebandeli 29:16

Mitindami

  • +Eb 30:19; 46:15; Rt 4:11

Ebandeli 29:17

Mitindami

  • +Eb 30:25; 35:16
  • +Eb 12:11; 24:16; Est 2:7

Ebandeli 29:18

Mitindami

  • +Eb 31:41; 34:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2003, nk. 29-30

Ebandeli 29:19

Mitindami

  • +Nz 12:2

Ebandeli 29:20

Mitindami

  • +Eb 30:26; Hos 12:12
  • +Loy 8:6

Ebandeli 29:21

Mitindami

  • +Rt 4:13; Mas 5:18; 1Ko 7:3

Ebandeli 29:22

Mitindami

  • +Bas 14:10; Mt 22:2; Em 19:9

Ebandeli 29:23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2007, nk. 8-9

Ebandeli 29:24

Mitindami

  • +Eb 16:1; 30:9; 46:18

Ebandeli 29:25

Mitindami

  • +Eb 31:7, 42; Le 19:11; Mt 5:37; 2Ko 4:2

Ebandeli 29:27

Mitindami

  • +Mib 24:5; Nz 19:5
  • +Eb 31:41

Ebandeli 29:29

Mitindami

  • +Eb 30:3; 35:22

Ebandeli 29:30

Mitindami

  • +Mib 21:15
  • +Hos 12:12

Ebandeli 29:31

Mitindami

  • +Eb 46:15; Rt 4:11
  • +Eb 30:22

Ebandeli 29:32

Mitindami

  • +Eb 35:22; 37:22; 49:3; Kob 6:14; 1Nt 5:1; Em 7:5
  • +Eb 30:20; 1Sa 1:6; Lk 1:25

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2007, lok. 9

Ebandeli 29:33

Mitindami

  • +Eb 30:6; Nz 34:15
  • +Eb 34:25; 42:24; 49:5; 1Nt 4:24; Em 7:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2007, lok. 9

Ebandeli 29:34

Mitindami

  • +Eb 34:25; 49:5; Kob 6:16; Mit 3:12; 1Nt 6:1; Em 7:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2007, lok. 9

Ebandeli 29:35

Mitindami

  • +Eb 35:23; 37:26; 38:15; 44:18; 49:8; 1Nt 2:3; Em 5:5; 7:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2007, lok. 9

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 29:1Bas 6:3; 1Ba 4:30; Yb 1:3
Eba. 29:2Eb 30:40; Loy 4:1
Eba. 29:2Eb 24:11; Kob 2:15; Yn 4:6
Eba. 29:4Eb 27:43; Mis 7:2
Eba. 29:5Eb 24:29
Eba. 29:5Eb 24:24; 31:53
Eba. 29:6Eb 43:27; 1Sa 17:22
Eba. 29:6Eb 31:4; 46:19; Rt 4:11
Eba. 29:6Kob 2:16
Eba. 29:7Nz 23:2; Loy 1:7
Eba. 29:9Eb 30:1; 35:19
Eba. 29:9Kob 2:16
Eba. 29:10Kob 2:17
Eba. 29:11Eb 33:4; 45:15; Lk 15:20; Ro 16:16
Eba. 29:11Eb 43:30; 45:2
Eba. 29:12Eb 13:8; 14:14
Eba. 29:12Eb 24:28
Eba. 29:13Eb 24:29
Eba. 29:13Mis 20:37
Eba. 29:14Bas 9:2; 2Sa 5:1
Eba. 29:15Eb 27:43; 28:5
Eba. 29:15Mib 25:4; 1Ti 5:18
Eba. 29:15Eb 30:28; 31:7
Eba. 29:16Eb 30:19; 46:15; Rt 4:11
Eba. 29:17Eb 30:25; 35:16
Eba. 29:17Eb 12:11; 24:16; Est 2:7
Eba. 29:18Eb 31:41; 34:12
Eba. 29:19Nz 12:2
Eba. 29:20Eb 30:26; Hos 12:12
Eba. 29:20Loy 8:6
Eba. 29:21Rt 4:13; Mas 5:18; 1Ko 7:3
Eba. 29:22Bas 14:10; Mt 22:2; Em 19:9
Eba. 29:24Eb 16:1; 30:9; 46:18
Eba. 29:25Eb 31:7, 42; Le 19:11; Mt 5:37; 2Ko 4:2
Eba. 29:27Mib 24:5; Nz 19:5
Eba. 29:27Eb 31:41
Eba. 29:29Eb 30:3; 35:22
Eba. 29:30Mib 21:15
Eba. 29:30Hos 12:12
Eba. 29:31Eb 46:15; Rt 4:11
Eba. 29:31Eb 30:22
Eba. 29:32Eb 35:22; 37:22; 49:3; Kob 6:14; 1Nt 5:1; Em 7:5
Eba. 29:32Eb 30:20; 1Sa 1:6; Lk 1:25
Eba. 29:33Eb 30:6; Nz 34:15
Eba. 29:33Eb 34:25; 42:24; 49:5; 1Nt 4:24; Em 7:7
Eba. 29:34Eb 34:25; 49:5; Kob 6:16; Mit 3:12; 1Nt 6:1; Em 7:7
Eba. 29:35Eb 35:23; 37:26; 38:15; 44:18; 49:8; 1Nt 2:3; Em 5:5; 7:5
  • Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Libongoli ya Mokili ya Sika
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 29:1-35

Ebandeli

29 Nsima na yango, Yakobo asimbaki nzela akei na mokili ya Bato ya Ɛsti.+ 2 Bongo atalaki, mpe talá libulu moko ya mai ezalaki wana na esobe mpe talá bitonga misato ya mpate elalaki wana pene na yango, mpo bazalaki na momeseno ya komɛlisa bitonga na libulu yango;+ mpe libanga moko monene ezalaki na monɔkɔ ya libulu yango.+ 3 Ntango bitonga nyonso ezalaki kosangisama na esika yango, bazalaki kolongola libanga yango na monɔkɔ ya libulu, mpe bazalaki komɛlisa bitonga mai; nsima na yango, bazalaki kozongisa libanga yango na esika na yango na monɔkɔ ya libulu.

4 Bongo Yakobo alobaki na bango ete: “Bandeko na ngai, bino bozali bato ya wapi?” na yango, balobaki ete: “Tozali bato ya Harane.”+ 5 Bongo alobaki na bango ete: “Boyebi Labana+ mwana ya mwana ya Nahore?”+ na yango, balobaki ete: “Toyebi ye.” 6 Bongo alobaki na bango ete: “Azali malamu?”+ Mpe balobaki ete: “Azali malamu. Kutu talá Rashele+ mwana na ye ya mwasi azali koya na bampate!”+ 7 Mpe alobaki lisusu ete: “Ɛɛ, moi ezali naino. Ezali ntango ya kosangisa bitonga te. Bómɛlisa bampate mai, bongo na nsima bókende koleisa yango.”+ 8 Na bongo, balobaki ete: “Bapesi biso nzela ya kosala bongo te liboso ete bitonga nyonso esangisama mpe bálongola libanga na monɔkɔ ya libulu ya mai. Na nsima nde tokomɛlisa bampate mai.”

9 Ntango azalaki naino kosolola na bango, Rashele+ ayaki na bampate ya tata na ye, mpo azalaki mobateli ya mpate.+ 10 Mpe esalemaki boye: ntango Yakobo amonaki Rashele mwana ya Labana ndeko ya mama na ye mpe bampate ya Labana ndeko ya mama na ye, na mbala moko Yakobo abɛlɛmaki mpe abalolaki libanga elongwa na monɔkɔ ya libulu ya mai mpe amɛlisaki bampate ya Labana ndeko ya mama na ye.+ 11 Na nsima, Yakobo apwɛpwaki+ Rashele mpe atombolaki mongongo na ye mpe abandaki kolela.+ 12 Mpe Yakobo abandaki koyebisa Rashele ete ye azali ndeko+ ya tata na ye mpe ete azali mwana ya Rebeka. Mpe Rashele apotaki mbangu koyebisa tata na ye.+

13 Bongo esalemaki boye: ntango kaka Labana ayokaki nsango etali Yakobo mwana ya ndeko na ye ya mwasi, apotaki mbangu kokutana na ye.+ Na nsima, ayambaki ye mpe apwɛpwaki ye mpe ayaki na ye na ndako na ye.+ Mpe abandaki koyebisa Labana makambo yango nyonso. 14 Nsima na yango, Labana alobaki na ye ete: “Ozali solo makila* moko na ngai.”+ Bongo afandaki elongo na ye sanza mobimba.

15 Nsima na yango, Labana alobaki na Yakobo ete: “Ozali ndeko na ngai,+ bongo osengeli nde kosalela ngai mpamba?+ Yebisá ngai: Lifuti na yo ekozala nini?”+ 16 Nzokande, Labana azalaki na bana basi mibale. Nkombo ya oyo ya mokóló Lea+ mpe nkombo ya oyo ya leki Rashele. 17 Kasi miso ya Lea ezalaki kongɛnga te, nde Rashele+ azalaki kitoko mingi na nzoto mpe na elongi.+ 18 Mpe Yakobo azalaki kolinga Rashele mingi. Bongo alobaki ete: “Nandimi kosalela yo mbula nsambo mpo na Rashele mwana na yo ya leki.”+ 19 Na yango, Labana alobaki ete: “Malamu kutu napesa ye epai na yo na esika ete napesa ye na mobali mosusu.+ Kobá kofanda elongo na ngai.” 20 Mpe Yakobo asalaki mosala mbula nsambo mpo na Rashele,+ kasi na miso na ye emonanaki nde lokola mwa mikolo moke mpo na bolingo oyo alingaki ye.+

21 Na nsima, Yakobo alobaki na Labana ete: “Pesá ngai mwasi na ngai, mpamba te mikolo na ngai ekoki, mpe tiká ngai nasangisa nzoto na ye.”+ 22 Na yango, Labana ayanganisaki bato nyonso ya esika yango mpe asalaki fɛti.+ 23 Kasi esalemaki boye: na mpokwa yango, azwaki Lea mwana na ye ya mwasi mpe ayaki na ye epai ya Yakobo mpo ete asangisa nzoto na ye. 24 Lisusu, Labana apesaki Zilipa+ mosaleli na ye ya mwasi epai na ye, ɛɛ epai ya Lea mwana na ye, mpo azala mosaleli na ye. 25 Bongo na ntɔngɔ, talá ezalaki nde Lea! Na yango, alobaki na Labana ete: “Likambo nini oyo osali ngai? Nasalelaki yo mosala mpo na Rashele te? Bongo mpo na nini okosi ngai?”+ 26 Na yango, Labana alobaki ete: “Epai na biso bapesaka leki liboso ya mwana ya liboso te. 27 Sepelá+ mpenza tii na nsuka ya pɔsɔ ya mwasi oyo. Na nsima, bakopesa mpe yo mwasi oyo mosusu mpo na mosala oyo okosalela ngai na mbula nsambo mosusu.”+ 28 Na yango, Yakobo asalaki bongo mpe asepelaki mpenza tii na nsuka ya pɔsɔ ya mwasi yango, nsima na yango, apesaki ye Rashele mwana na ye mpo azala mwasi na ye. 29 Lisusu, Labana apesaki Bila+ mosaleli na ye ya mwasi epai ya Rashele mwana na ye mpo azala mosaleli na ye.

30 Bongo asangisaki mpe nzoto na Rashele mpe lisusu alingaki Rashele mingi koleka Lea,+ mpe akobaki kosalela Labana mosala mbula nsambo mosusu.+ 31 Ntango Yehova amonaki ete Lea ayinami, afungolaki libumu na ye,+ kasi Rashele azalaki ekomba.+ 32 Mpe Lea azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali mpe apesaki ye nkombo Rubene,+ mpo alobaki ete: “Mpo Yehova atali mawa na ngai,+ boye sikoyo mobali na ngai akobanda kolinga ngai.” 33 Mpe azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali mpe alobaki ete: “Mpo Yehova ayoki,+ mpamba te nayinami, yango wana apesi ngai lisusu mwana oyo.” Bongo apesaki ye nkombo Simeone.+ 34 Mpe azwaki zemi lisusu mpe abotaki mwana mobali mpe alobaki ete: “Sikoyo, na mbala oyo, mobali na ngai akokangama na ngai, mpamba te naboteli ye bana mibali misato.” Yango wana babengaki ye nkombo Levi.+ 35 Mpe azwaki zemi lisusu mpe abotaki mwana mobali mpe alobaki ete: “Mbala oyo, nakokumisa Yehova.” Bongo apesaki ye nkombo Yuda.+ Nsima na yango, atikaki kobota.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto