Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 24:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bongo Moize ayaki mpe ayebisaki bato maloba nyonso ya Yehova mpe bikateli nyonso ya lisambisi,+ mpe bato nyonso bazongisaki maloba na mongongo moko mpe balobaki ete: “Maloba nyonso oyo Yehova alobi, tokosalela yango.”+

  • Kobima 24:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Bongo Moize akamataki makila mpe amwangiselaki yango bato+ mpe alobaki ete: “Oyo ezali makila ya kondimana+ oyo Yehova asali ná bino mpo na maloba oyo nyonso.”

  • Kobima 34:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete: “Komá mpo na yo maloba oyo,+ mpamba te ezali na boyokani na maloba oyo nde nazali kosala kondimana ná yo mpe na Yisraele.”+

  • Kolimbola Mibeko 29:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Oyo ezali maloba ya kondimana oyo Yehova asalaki ná bana ya Yisraele na mokili ya Moabe, oyo apesaki Moize mitindo, longola kondimana oyo asalaki ná bango na Horebe.+

  • Yosua 23:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 mpamba te bobuki kondimana ya Yehova Nzambe na bino, oyo apesaki bino mitindo mpo na yango, mpe bokei kosalela banzambe mosusu mpe kogumbamela bango.+ Mpe nkanda ya Yehova ekopelela bino mpenza,+ mpe, nokinoki, bokokufa mpenza na mokili malamu oyo ye apesi bino.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto