15 Mpe esalemaki boye: ntango kaka Gideone ayokaki lisolo ya ndɔtɔ yango mpe ndimbola na yango,+ abandaki kosambela.+ Na nsima, azongaki na kaa ya Yisraele mpe alobaki ete: “Bótɛlɛma,+ mpamba te Yehova apesi kaa ya Midiane na lobɔkɔ na bino.”
47 Mpe lisangá oyo mobimba ekoyeba ete ezali na mopanga te, to na likɔnga te nde Yehova abikisaka,+ mpamba te etumba ezali ya Yehova,+ mpe akopesa bino na lobɔkɔ na biso.”+