Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 26:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe nakotɛmɛla bino mpenza, mpe banguna na bino bakolonga bino;+ mpe baoyo bazali koyina bino bakonyata bino,+ mpe bokokima mpenza wana moto moko te azali kolanda bino.+

  • Kolimbola Mibeko 28:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Yehova akosala ete banguna na yo bálonga yo.+ Okobimela bango na nzela moko, kasi okokima liboso na bango na nzela nsambo; mpe okokóma mpenza eloko moko ya nsɔmɔ epai ya makonzi nyonso ya mabele.+

  • Kolimbola Mibeko 32:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Ndenge nini moto moko akoki kolanda bato nkóto moko (1 000),

      Mpe bato mibale bakoki kokimisa bato nkóto zomi (10 000)?+

      Lobá kaka soki Libanga na bango atɛki bango+

      Mpe Yehova akabi bango.

  • Basambisi 2:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Bongo nkanda ya Yehova epelelaki Yisraele,+ mpe apesaki bango na mabɔkɔ ya bapunzi, mpe babandaki kopunza bango;+ mpe atɛkaki bango na lobɔkɔ ya banguna na bango oyo bazalaki zingazinga,+ mpe bakokaki lisusu te kotɛlɛma liboso ya banguna na bango.+

  • Basambisi 3:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Bongo nkanda ya Yehova epelelaki Yisraele,+ mpe atɛkaki+ bango na lobɔkɔ ya Kushane-rishataime mokonzi ya Mezopotamia;+ mpe bana ya Yisraele basalelaki Kushane-rishataime mbula mwambe.

  • Basambisi 10:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Na yango, nkanda ya Yehova epelelaki Yisraele,+ mpe atɛkaki+ bango na lobɔkɔ ya Bafilistia+ mpe na lobɔkɔ ya bana ya Amone.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto