Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 2:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe ntango Yehova azalaki kobimisela bango basambisi,+ Yehova azalaki elongo na mosambisi mokomoko, mpe azalaki kobikisa bango na lobɔkɔ ya banguna na bango mikolo nyonso ya mosambisi yango; mpamba te Yehova azalaki koyoka mawa+ na komilelalela na bango mpo na banyokoli na bango+ mpe mpo na baoyo bazalaki kotindikatindika bango.

  • Basambisi 3:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe bana ya Yisraele babandaki kobelela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi.+ Bongo Yehova abimiselaki bana ya Yisraele mobikisi+ moko, Otiniele+ mwana ya Kenaze,+ leki ya Kalebe,+ mpo abikisa bango.

  • Nzembo 107:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe babandaki kobelela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi na mpasi na bango;+

      Abikisaki bango na mitungisi na bango, lokola na momeseno.+

  • Nzembo 145:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Akokokisa mposa ya baoyo bazali kobanga ye,+

      Mpe akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi, mpe akobikisa bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto