15 Mpe Yehova abandaki kokɔtisa mobulungano+ epai ya Sisera ná makalo na ye nyonso ya bitumba mpe bato ya kaa na ye mobimba, na nzela ya mopanga liboso ya Barake. Nsukansuka Sisera akitaki na likalo mpe akimaki na makolo.
33 Kasi Samwele alobaki boye: “Kaka ndenge mopanga+ na yo esalaki ete basi bázanga bana, mama+ na yo mpe akozanga bana koleka basi nyonso.”+ Na yango, Samwele akataki Agage bitenibiteni liboso ya Yehova na Gilgale.+