Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 7:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Bongo Yehova alobaki na Gideone ete: “Bato oyo bazali na yo baleki ebele mpo napesa Midiane na lobɔkɔ na bango.+ Mbala mosusu Yisraele akotombolela ngai mapeka,+ akoloba ete: ‘Lobɔkɔ na ngai nde ebikisi ngai.’+

  • 1 Samwele 14:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo Yonatane alobaki na mosaleli yango, momemi-bibundeli na ye ete: “Yaká tókatisa epai ya mwa etuluku ya basoda oyo bazalaka liboso, bisutu+ wana. Mbala mosusu Yehova akokɔtela biso, mpamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yehova kobikisa, ezala na bato mingi to na bato moke.”+

  • Yisaya 41:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “Kobanga te, yo Yakobo mosɔpi,+ bino bato ya Yisraele.+ Ngai moko nakosalisa bino,” yango nde liloba ya Yehova, ɛɛ Mosikoli na yo,+ Mosantu ya Yisraele.

  • Baebre 11:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 basilisaki makasi ya mɔtɔ,+ bakimaki mino ya mopanga,+ bazalaki na bolɛmbu kasi bakómaki na nguya,+ bakómaki bilombe na etumba,+ bakimisaki mampinga ya basoda ya bapaya.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto