41 Bongo talá! Mibali nyonso ya Yisraele bazalaki koya epai ya mokonzi, mpe balobaki na mokonzi ete: “Mpo na nini+ bandeko na biso, mibali ya Yuda, bayibi yo mpo bákatisa mokonzi Yordani,+ ye ná bato ya ndako na ye, ná bato nyonso ya Davidi elongo na ye?”