Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 4:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bongo Debora alobaki ete: “Nakokende mpenza elongo na yo. Nzokande, na nzela oyo ozali kokende lokumu ekozala ya yo te, mpo ezali na lobɔkɔ ya mwasi+ moko nde Yehova akotɛka Sisera.” Na yango, Debora atɛlɛmaki mpe akendaki elongo na Barake na Kedeshe.+

  • Basambisi 5:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Asembolaki lobɔkɔ na ye mpo na kozwa pike ya hema,

      Mpe lobɔkɔ na ye ya mobali mpo na kozwa marto ya bato oyo balingá mosala.+

      Mpe abɛtaki Sisera na marto, atɔbɔlaki ye motó,+

      Bongo apasolaki mpe apanzaki mpakatoi na ye.

  • 2 Samwele 11:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Nani abomaki Abimeleke+ mwana ya Yerubeshete?+ Longwa na likoló ya efelo, mwasi moko nde abwakelaki ye libanga ya likoló oyo banikaka na yango mbuma+ mpe akufaki na Tebeze,+ boye te? Mpo na nini bopusanaki penepene ya efelo boye?’ Bongo okoloba: ‘Mosaleli na yo Uria Mohiti, ye mpe akufi.’”+

  • 2 Samwele 20:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Na mbala moko, mwasi yango, na bwanya+ na ye, akendaki epai ya bato nyonso mpe bakataki motó ya Sheba mwana ya Bikri mpe babwakelaki Yoabe yango. Bongo ayulaki liseke,+ mpe batikaki engumba yango, bapanzanaki moto na moto na ndako na ye; kasi Yoabe azongaki na Yerusaleme epai ya mokonzi.

  • Yobo 31:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Likama ezali te mpo na moto oyo asalaka mabe,+

      Mpe mawa mpo na baoyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi?

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto