48 Mpe banguna na yo oyo Yehova akotindela yo, okosalela bango+ mpenza na nzala+ mpe na mposa ya mai mpe na bolumbu mpe na mposa ya eloko nyonso; mpe akotya mpenza ekanganeli ya ebende na nkingo na yo kino akosilisa yo.+
13Mpe bana ya Yisraele babandaki lisusu kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ bongo Yehova apesaki bango na lobɔkɔ ya Bafilistia+ mbula ntuku minei (40).
4 Nzokande, tata na ye ná mama na ye bayebaki te ete likambo yango eutaki na Yehova,+ ete azalaki koluka libaku ya kobunda na Bafilistia, mpamba te na ntango wana, Bafilistia bazalaki kokonza Yisraele.+