19 Kasi bango balobaki na ye ete: “Fandá nyɛɛ. Tyá lobɔkɔ na yo na monɔkɔ, mpe yaká tókende, okóma tata+ mpe nganga-nzambe+ na biso. Nini eleki malamu: otikala nganga-nzambe na ndako ya moto moko+ to okóma nganga-nzambe ya etuluka mpe libota mobimba na Yisraele?”+
27 Nde bango, bazwaki biloko oyo Mika asalaki mpe nganga-nzambe+ na ye, mpe bakendaki na Laishe,+ kobunda na bato oyo bazalaki kofanda na kimya mpe bazalaki kobanga eloko te.+ Mpe babomaki bango na mopanga,+ mpe batumbaki engumba yango na mɔtɔ.+