Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ruta 2:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bongo Boaze apesaki eyano mpe alobaki na ye ete: “Bayebisaki+ ngai mpenza makambo nyonso oyo osalelaki bokilo na yo nsima ya liwa ya mobali na yo,+ mpe ndenge otikaki tata na yo ná mama na yo mpe mokili ya bandeko na yo mpe oyei epai ya bato oyo oyebaki liboso te.+

  • Estere 8:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe na bitúká nyonso oyo eyangelami mpe na bingumba nyonso, epai nyonso oyo liloba ya mokonzi mpe mobeko na ye ezalaki kokóma, Bayuda bazalaki na esengo mpe nsai makasi, fɛti+ mpe mokolo malamu; mpe bato mingi+ ya mokili yango bamikómisaki Bayuda,+ mpo bakómaki kobanga+ Bayuda.

  • Nzembo 45:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Yoká, Ee mwana mwasi, mpe talá, mpe sembolá litoi na yo;

      Mpe bosaná bato na yo mpe ndako ya tata na yo.+

  • Yisaya 14:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpo Yehova akoyokela Yakobo mawa,+ mpe lisusu, akopona mpenza Yisraele;+ mpe ya solo akopemisa bango na mabele na bango,+ mpe moto oyo afandi mopaya akosangana mpenza na bango mpe bakokangana mpenza na ndako ya Yakobo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto