-
Balevi 23:22Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
22 “‘Mpe ntango bokobuka mbuma ya mokili na bino, osengeli te kobuka mbuma nyonso oyo ezali na ndelo ya elanga na yo ntango ozali kobuka mbuma, mpe osengeli te kolɔkɔta+ mbuma oyo etikalaka na ntango ozali kobuka mbuma. Okotika yango mpo na moto ya mpasi+ mpe mpo na moto oyo afandi mopaya.+ Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.’”
-
-
Kolimbola Mibeko 24:19Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
19 “Soki obuki mbuma na yo na elanga na yo,+ mpe obosani na elanga liboke moko ya matiti ya mbuma ya kosala farini, osengeli kozonga te mpo na kozwa yango. Ekotikala mpo na moto oyo afandi mopaya, mpo na mwana mobali oyo tata akufá mpe mpo na mwasi oyo mobali akufá;+ mpo ete Yehova Nzambe na yo apambola yo na misala nyonso ya lobɔkɔ na yo.+
-