25 “‘Soki ndeko na yo akómi mobola mpe asengeli kotɛka mwa ndambo ya mabele na ye, mosikoli, oyo azali mpenza ndeko na ye, asengeli koya mpe kosomba lisusu eloko oyo ndeko na ye atɛkaki.+
5 “Soki bandeko mibali bafandi esika moko mpe moko na bango akufi, aboti mwana te, mwasi ya mobali oyo akufi akokóma mwasi ya mobali ya libota mosusu te. Sɛmɛki na ye akokende epai na ye, mpe asengeli kozwa ye azala mwasi na ye mpe kosala ná ye libala ya bosɛmɛki.+
9 Bongo ye alobaki ete: “Yo nani?” Mpe ye alobaki ete: “Ngai Ruta moombo na yo, mpe osengeli kozipa moombo na yo nsɔngɛ ya elamba na yo, mpo ozali mosikoli.”+