Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 18:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Yehova azali libanga na ngai, esika makasi ya libateli na ngai mpe Mobikisi na ngai.+

      Nzambe na ngai azali libanga na ngai. Nakokima epai na ye,+

      Nguba na ngai mpe liseke na ngai ya lobiko, esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná.+

  • Nzembo 18:48
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 48 Azali kobikisa ngai liboso ya banguna na ngai oyo bazali na nkanda;+

      Okotombola ngai likoló ya baoyo bazali kotɛmɛla ngai,+

      Okobikisa ngai na mabɔkɔ ya moto ya mobulu.+

  • Nzembo 59:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Kasi ngai nakoyembela makasi na yo,+

      Mpe na ntɔngɔ nakoyebisa makambo etali motema boboto na yo na esengo.+

      Mpo omonisi ete ozali esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná+

      Mpe esika oyo nakoki kokima na mokolo ya mpasi na ngai.+

  • Nzembo 124:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Molimo na biso ezali lokola ndɛkɛ oyo ebiki+

      Na motambo ya bato oyo batyaka mitambo.+

      Motambo ebukani,+

      Mpe biso tobiki.+

  • Matai 10:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Ntango bakonyokola bino na engumba moko, bókima na engumba mosusu;+ mpo ya solo mpenza nalobi na bino ete: Bokosilisa koleka+ na bingumba nyonso ya Yisraele te liboso Mwana ya moto aya.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto