13 Na yango, Samwele azwaki liseke ya mafuta+ mpe atyaki ye mafuta na katikati ya bandeko na ye. Mpe elimo ya Yehova ebandaki kosala kati na Davidi banda mokolo wana.+ Na nsima, Samwele atɛlɛmaki mpe asimbaki nzela, akei na Rama.+
37 Na nsima Davidi abakisaki ete: “Yehova, oyo abikisaki ngai na nkɔsi mpe na urse, ye nde akobikisa ngai na lobɔkɔ ya Mofilistia oyo.”+ Na yango, Saulo alobaki na Davidi boye: “Kende, mpe tiká ete Yehova ye moko azala na yo.”+