Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 6:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Okobanga Yehova Nzambe na yo,+ mpe ye nde okosalela,+ mpe na nkombo na ye nde okolapa ndai.+

  • Kolimbola Mibeko 10:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “Okobanga Yehova Nzambe na yo.+ Okosalela+ ye, mpe okokangama na ye,+ mpe okolapa ndai na nkombo na ye.+

  • Basambisi 8:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Na yango, ye alobaki boye: “Bazalaki bandeko na ngai, bana ya mama na ngai. Lokola Yehova azali solo na bomoi, nalingaki koboma bino te soki bótikaka bango na bomoi.”+

  • 1 Samwele 14:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Mpamba te, se ndenge Yehova, oyo azali Mobikisi ya Yisraele, azali solo na bomoi, ata soki euti na mwana na ngai Yonatane, akokufa solo.”+ Kasi moto moko te kati na bato nyonso apesaki ye eyano.

  • 1 Samwele 19:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo Saulo atosaki mongongo ya Yonatane, mpe Saulo alapaki ndai ete: “Lokola Yehova azali solo na bomoi,+ akobomama te.”

  • 1 Samwele 20:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Kasi Davidi alapaki mpe ndai+ mpe alobaki boye: “Ya solo, tata na yo ayebi ete nandimami na miso na yo,+ yango wana akoloba boye: ‘Yonatane ayeba likambo oyo te, noki ayoka mpasi.’ Kasi, ya solo, lokola Yehova azali solo na bomoi+ mpe lokola molimo na yo ezali solo na bomoi,+ litambe kaka moko nde ekaboli ngai na liwa!”+

  • 1 Samwele 25:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Bongo sikoyo, nkolo na ngai, lokola Yehova azali solo na bomoi+ mpe lokola molimo na yo ezali solo na bomoi,+ Yehova apekisi+ yo omema ngambo ya makila+ mpe otika lobɔkɔ na yo moko ebikisa yo.+ Bongo sikoyo, tiká banguna na yo mpe baoyo bazali koluka kosala nkolo na ngai mabe bákóma lokola Nabale.+

  • Matai 5:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 “Lisusu boyokaki ete balobaki na bato ya ntango ya kala ete, ‘Osengeli te kolapa ndai+ bongo okokisa yango te, kasi osengeli kokokisa bilako oyo osaleli Yehova.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto