34 Mopaya oyo azali kofanda mopaya epai na bino akokóma na miso na bino lokola mwana-mboka na kati na bino; mpe osengeli kolinga ye lokola yo moko,+ mpo bino bokómaki kofanda bapaya na mokili ya Ezipito.+ Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.
4 Mpe pesá bato mitindo ete: “Bozali koleka pene na ndelo ya bandeko na bino,+ bana ya Esau,+ oyo bazali kofanda na Seire;+ mpe bakobanga bino,+ mpe bosengeli mpenza kokeba.
47 Mpe Saulo azwaki bokonzi na Yisraele+ mpe akendaki kobunda na banguna na ye nyonso epai na epai, abundaki na Moabe,+ bana ya Amone,+ Edome,+ bakonzi ya Soba+ mpe Bafilistia;+ mpe esika nyonso oyo azalaki kobaluka, azalaki kopesa bango bitumbu.+