-
Nzembo 57:maloba ya ebandeli ya loyembo-11Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Epai ya mokambi ya nzembo. “Kobebisa te.” Ya Davidi. Mikitame. Ntango akimaki Saulo, akɔti na mobenga.+
57 Ee Nzambe, moniselá ngai boboto, moniselá ngai boboto,+
Mpo molimo na ngai ekimi epai na yo;+
Mpe nazali kokima na elili ya mapapu na yo kino mikakatano ekoleka.+
2 Nazali kobenga Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, Nzambe ya solo oyo azali kosukisela ngai mikakatano.+
3 Akotinda lisalisi uta na likoló mpe akobikisa ngai.+
Akobulunganisa mpenza moto oyo azali koswa ngai.+ Sela.
Nzambe akotinda motema boboto na ye mpe bosolo na ye.+
4 Molimo na ngai ezali na katikati ya bankɔsi;+
Nazali na likambo mosusu ya kosala te kaka kolala na kati ya bato oyo badundaka, ɛɛ bana ya bato,
Baoyo mino na bango ezali makɔnga mpe makula,+
Mpe baoyo lolemo na bango ezali mopanga oyo epeli.+
6 Babongiseli makolo na ngai monyama;+
Molimo na ngai egumbami.+
Batimolaki liboso na ngai libulu ya motambo;
Bakwei na kati.+ Sela.
7 Ee Nzambe, motema na ngai ezali kotengatenga te,+
Motema na ngai ezali kotengatenga te.
Nakoyemba mpe nakobɛta mondule.+
Ee ebɛtɛlo ya nsinga, lamuká; Ee nzɛnzɛ, ná yo mpe.+
Nakolamwisa kotana ya ntɔngɔ.
-
-
Nzembo 142:maloba ya ebandeli ya loyembo-7Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Maskile. Ya Davidi, ntango azalaki na mobenga.+ Libondeli.
142 Na mongongo na ngai, nabelelaki Yehova mpo na kosɛnga lisalisi;+
Na mongongo na ngai, nabandaki kobelela Yehova mpo amonisela ngai boboto.+
3 Ntango elimo+ na ngai elɛmbaki makasi na kati na ngai.
Bongo yo moko oyebaki nzela na ngai.+
Na nzela oyo nazali kotambola+
Babombeli ngai motambo.+
4 Talá na lobɔkɔ ya mobali mpe moná
Ete moto moko te azali kondima ete ayebi ngai lisusu.+
Esika na ngai ya kokima elimwe liboso na ngai;+
Moto moko te azali kotuna makambo ya molimo na ngai.+
-