Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 8:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe alobaki boye: “Lotomo+ ya mokonzi oyo akoyangela bino ekozala boye: Akozwa bana na bino ya mibali+ mpe akokómisa bango bato na ye ya makalo+ mpe akokɔtisa bango na molɔngɔ ya basoda na ye oyo batambolaka na mpunda,+ mpe bamosusu bakopota mbangu liboso ya makalo na ye;+

  • 2 Samwele 15:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe esalemaki boye: nsima ya makambo oyo, Abisalome atindaki básalela ye likalo moko, ná bampunda mpe azwaki bato ntuku mitano (50) bápotaka mbangu liboso na ye.+

  • 1 Bakonzi 1:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Na ntango wana nyonso, Adoniya+ mwana ya Hagite+ azalaki komitombola+ mpe koloba boye: “Ngai nde nakozala mokonzi!”+ Mpe atindaki bázwela ye likalo moko, ná bato oyo batambolaka na mpunda mpe azwaki mibali ntuku mitano (50) bápotaka mbangu liboso na ye.+

  • 2 Bakonzi 10:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe esalemaki boye: ntango kaka asilisaki kopesa likabo ya kotumba, na mbala moko, Yehu alobaki boye na bapoti-mbangu mpe na bakomanda oyo basalisaka ye: “Bókɔta, bóboma bango! Bótika ata moko te abima.”+ Mpe bapoti-mbangu ná bakomanda yango+ babandaki koboma bango na mopanga mpe kobwaka bango libándá, mpe bakendaki tii na engumba ya ndako ya Baala.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto