Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 15:55
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 55 Maone,+ Karamele, Zife+ ná Yuta,

  • 1 Samwele 23:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Na yango, batɛlɛmaki mpe bakendaki na Zife+ liboso ya Saulo, ntango Davidi ná bato na ye bazalaki na esobe ya Maone,+ na Araba,+ na sudi ya Yeshimone.

  • 1 Samwele 26:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Na nsima, mibali ya Zife+ bayaki epai ya Saulo na Gibea,+ balobi: “Davidi amibombi nde na ngomba moke ya Hakila,+ oyo etalani na Yeshimone*+ te?”

  • 1 Ntango 2:42
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 42 Mpe bana ya Kalebe+ ndeko ya Yerameele bango oyo: Mesha mwana na ye ya liboso, oyo azalaki tata ya Zife, mpe bana ya Maresha tata ya Hebrone.

  • Nzembo 54:maloba ya ebandeli ya loyembo-7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Epai ya mokambi ya nzembo na bibɛtɛlo ya bansinga. Maskile. Ya Davidi. Ntango Bazife bakɔtaki mpe balobaki na Saulo ete: “Davidi amibombi nde epai na biso te?”+

      54 Ee Nzambe, bikisá ngai na nkombo na yo,+

      Mpe na nguya na yo sambá likambo na ngai.+

       2 Ee Nzambe, yoká libondeli na ngai;+

      Tyá mpenza litoi na maloba ya monɔkɔ na ngai.+

       3 Mpo ezali na bapaya oyo babimeli ngai,

      Mpe banyokoli oyo bazali koluka molimo na ngai.+

      Batye Nzambe liboso na bango te.+ Sela.

       4 Talá! Nzambe azali mosungi na ngai;+

      Yehova azali kati na baoyo basungaka molimo na ngai.

       5 Akozongisela banguna na ngai mabe;+

      Na bosolo na yo kangisá bango monɔkɔ.+

       6 Nakopesa yo mbeka na motema moko.+

      Ee Yehova, nakokumisa nkombo na yo mpo yango ezali malamu.+

       7 Mpo abikisaki ngai na mpasi nyonso,+

      Mpe liso na ngai etali banguna na ngai.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto