14 Kasi sikoyo bokonzi na yo ekoumela te.+ Ya solo, Yehova akozwa moto moko oyo azali kosepelisa motema na ye;+ mpe Yehova akotya ye mokambi+ ya bato na ye, mpamba te yo otosi te mitindo oyo Yehova apesaki yo.”+
28 Na yango Samwele alobaki na ye boye: “Yehova alongoli+ bokonzi ya Yisraele epai na yo lelo oyo, mpe akopesa yango mpenza moninga na yo oyo aleki yo.+
31 Mpo mikolo nyonso oyo mwana ya Yese akozala na bomoi na mabele, yo ná bokonzi na yo bokoumela te.+ Sikoyo, tindá bákende kozwela ngai ye, mpo asengeli kokufa.”+
17 Mpe alobaki lisusu na ye boye: “Kobanga te;+ mpo lobɔkɔ ya tata na ngai Saulo ekozwa yo te, mpe yo, okokóma mokonzi+ ya Yisraele, mpe ngai, nakokóma moto ya mibale, nsima na yo; tata na ngai Saulo mpe ayebi likambo yango.”+