Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 15:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Soki moko ya bandeko na yo akómi mobola epai na yo na moko ya bingumba na yo, na mokili na yo oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, osengeli te koyeisa motema na yo makasi to kokangela ndeko na yo mobola lobɔkɔ.+

  • Masese 3:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Koboya te kosala malamu na baoyo basengeli na yango,+ ntango lobɔkɔ na yo ezali na nguya ya kosala yango.+

  • Luka 11:41
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 41 Kasi bópesa makabo ya motema mawa+ nde biloko oyo ezali na motema, mpe talá! biloko na bino mosusu nyonso ekokóma pɛto.

  • Misala 20:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Namonisaki bino na makambo nyonso ete na kosaláká mosala makasi+ ndenge wana nde bosengeli kosalisa baoyo bazali bato ya bolɛmbu,+ mpe bosengeli kobosana te maloba ya Nkolo Yesu, ntango ye moko alobaki ete: ‘Esengo ya kopesa+ eleki oyo ya kozwa.’”

  • Baebre 13:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Lisusu, bóbosana te kosala malamu+ mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto