Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 13:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Kasi sikoyo bokonzi na yo ekoumela te.+ Ya solo, Yehova akozwa moto moko oyo azali kosepelisa motema na ye;+ mpe Yehova akotya ye mokambi+ ya bato na ye, mpamba te yo otosi te mitindo oyo Yehova apesaki yo.”+

  • 1 Samwele 15:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Na yango Samwele alobaki na ye boye: “Yehova alongoli+ bokonzi ya Yisraele epai na yo lelo oyo, mpe akopesa yango mpenza moninga na yo oyo aleki yo.+

  • 1 Samwele 23:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe alobaki lisusu na ye boye: “Kobanga te;+ mpo lobɔkɔ ya tata na ngai Saulo ekozwa yo te, mpe yo, okokóma mokonzi+ ya Yisraele, mpe ngai, nakokóma moto ya mibale, nsima na yo; tata na ngai Saulo mpe ayebi likambo yango.”+

  • 2 Samwele 6:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Na yango, Davidi alobaki na Mikale: “Nasali bongo nde liboso ya Yehova, oyo aponaki ngai na esika ya tata na yo mpe bato ya ndako na ye mobimba mpo nazala+ mokambi ya Yisraele, bato ya Yehova, mpe nakosepela liboso ya Yehova.+

  • 2 Samwele 7:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Bongo sikoyo, talá oyo okoloba na mosaleli na ngai Davidi: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Ngai nde nazwaki yo na esika ya koleisa banyama matiti, otika kobatela etonga+ mpo okóma mokambi+ ya bato na ngai Yisraele.

  • 1 Ntango 17:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Bongo sikoyo, talá oyo okoloba na mosaleli na ngai Davidi: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Ngai nde nazwaki yo na esika ya koleisa banyama matiti, otika kobatela etonga+ mpo okóma mokambi+ ya bato na ngai Yisraele.

  • Nzembo 89:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Namoni Davidi mosaleli na ngai;+

      Natye ye mafuta na ngai mosantu,+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto